HomeActualitésFact-checkSala keba, lotiliki pona kosalela ba appareils ya ndaku ewutaka na aimant...

Sala keba, lotiliki pona kosalela ba appareils ya ndaku ewutaka na aimant te

-

Na Facebook, video moko etalemi mingi koleka milio moko ya batu. Bilili wana ezali koloba été soki osaleli aimant okozwa lotiliki. Nzoka nde, likambu oyo ezali ya solo te. Na Facebook, babengaka motindo ya publication ya boye « piège à commentaires ».

Na ba sanza mibale ya pamba, bilili oyo ekabwami na batu ebele pe mingi bakosami pe bandimi likambo oyo. Ebele kutu babakisi maloba pona kopesa longonya na mokeli bilili oyo pe kosenga nzela na ye ya singa pona asalela pe bango.

Pona kobimisa solo na kati ya lokuta oyo, Congo Check elukaki makomi ya bato batanga lotiliki lokola Faraday. Ye aloba wuta kala été makoki ezali pona kozwa lotiliki na nzela ya ba aimants. Kasi, esengeli kosala ndenge elobami na bilili oyo te. Pona kozwa lotiliki, esengeli kozala na aimant ya munene pe ba masini pona koningisa yango. Lotiliki ya boye ebengami na lopoto “courant induit” oyo esengeli eleka na transformateur.

Congo Check asukaki wana te. Topusanaki pe pembeni ya Léon Mushila, électricien pe molakisi na biteyelo ya Kinshasa. Ye pe alobaki ete video oyo eza solo te. « Ya solo penza okoki kozua lotiliki na kosalelaka ba aimant. Kasi na lolenge oyo te. Courant pona kosalisa biloko ya ndaku eza 220 volts. Na aimant oyo, okoki kozwa ata 5 volts te », boye nde alobaki.

Congo Check amekaki kokomela mokeli bilili oyo pona kozwa pe maloba na ye kasi ayanoli nanu te. Na Facebook, esengeli kosala keba yambo ya kolanda to kakabola makambu. Bilili oyo ekoki pe komema likama na ma bota pamba te lotiliki ebo-maka.

Avis de Congo Check à la communauté en ligne de la République démocratique du Congo, de la République centrafricaine, du Congo-Brazzaville et de l'Afrique francophone : Si votre contenu est étiqueté comme faux, partiellement faux, sans contexte, photo ou vidéo retouchée... ne le supprimez pas ! Modifiez-le, avec la mise à jour de l'article de vérification que nous mettons à votre disposition, puis signalez-le-nous ! Ou faites un recours si vous estimez que notre article de vérification ne contient pas suffisamment d'éléments factuels susceptibles d'appeler à la modification de votre contenu. Notre équipe sera alors avertie et procédera au retrait du tag ou vous fournira plus d'assistance dans la compréhension du contexte autour de votre contenu ! En supprimant le contenu, nous ne pourrons malheureusement rien faire de plus et la sanction sera maintenue !


Congo Check, étant signataire du code de principe du Réseau international des fact-checkers (IFCN), se soumet aux principes de transparence et d’impartialité. Si, d’une manière ou d’une autre, vous pensez que l’un de nos articles viole ces principes (voir la vidéo ici https://youtu.be/OVrx_2OYuTg ) vous pouvez nous contacter à info@congocheck.net . Vous pouvez aussi reporter vos préoccupations à l’IFCN, en leur écrivant à info@poynter.org. Veuillez lire ici la politique de réclamation de IFCN : https://ifcncodeofprinciples.poynter.org/complaints-policy

LEAVE A REPLY

Please enter your comment!
Please enter your name here

LATEST POSTS

Cette vidéo ne montre pas le président Yoweri Museveni imposant un salut répétitif à un soldat plutôt le comédien Mpampire

Une vidéo vue plus de 2,6 millions de fois est faussement présentée comme montrant le président ougandais Yoweri Kaguta Museveni en train de demander à...

Contexte : cette vidéo de déploiement militaire a été filmée en Inde et non à Uvira en RDC

Une vidéo récemment partagée sur les réseaux sociaux prétend montrer un déploiement des militaires américains par hélicoptère à Uvira, dans la province du Sud-Kivu. Dans...

Non, l’aéroport de N’Djili ne va pas devenir le premier en Afrique à obtenir une certification de sécurité

Depuis la fin de l’année 2025, le secteur aéroportuaire congolais est en ébullition avec l’annonce, par le ministre sectoriel, des travaux d’envergure dans plusieurs villes...

Non, Alexis Thambwe Mwamba n’a pas été arrêté (situation au 21 janvier)

Depuis le 19 janvier, plusieurs publications largement relayées sur les réseaux sociaux affirment qu’Alexis Thambwe Mwamba, ancien ministre et ancien président du Sénat en RDC,...