Na réseau social Facebook, bilili moko ezali kolakisa sango moko oyo babeti ye bigogo nakati ya misa etambolaki makasi.
Publication oyo ezali koloba ete moto ya liboma na kati ya etonga ya catholique abeti sango bigogo na sima azui Biblia. Buluyeke moko elandi bopanzi sango wana na internet. Ba internautes bazalaki koloba ete bilili yango ezali ya solo te, misusu balobi ezali mise en scĂšne, ba misusu pe bazalaki na esengo te.
Ba rĂ©actions oyo nde etindaki Congo Check aluka bosolo. Koluka epesi eyano ete scĂšne oyo ezali ya solo, ezali mise en scĂšne te. ĂvĂ©nement oyo esalemaki na mokolo ya 7 novembre 2020. Eza agression contre Ă©vĂȘque Francis Alleyne na cathĂ©drale ya Brickdam, na Georgetown, capitale ya Guyana, pays ya Amerika yasĂš. Sango azuaki bigogo na katikati ya misa.
« Mabe na église catholique. Yoka Bigogo Sango azui, akeyi na Biblia », elobi légende ya page Facebook Thierry Ngogang oyo esengeli 12 600 mentions (naza), 2000 commentaires mpe 1800 partages.
Na réaction na publication oyo, ba internautes bazalaki koloba makambo nyonso. Ba misusu bazalaki koloba ete ezali montage pe misusu lisusu bazalaki koloba ete ezali mise en scÚne. Post oyo esalemaki mpe na ba pages Facebook mingi pe esalaki polemique ya makasi.
Boluki bosolo
Pona koluka bosolo, lingomba ya Congo Check esaleli capture dâĂ©cran mpe esali recherche ya bilili oyo ekota na Internet na nzela ya Google Lens. Wana nde tozuaki article moko oyo esalemi na journal « Stabroek News », oyo ekomaki lisolo ya sango oyo na mokolo mwa 15 novembre 2020. Elobami ete ezalaki na agression oyo. Makambu oyo esalemaki na 7 novembre. Sango yango abeti lisolo mpe alobi ete azalaki kotanga misa ya tongo, oyo ebandaki na 6 heures, ntango moto oyo azalaki lokola liboma pe mobola akotaki na etonga pe ayibaki ye.
Ăquipe na biso mpe ezalaki na page Facebook Little Guyana-592 News oyo esengeli 179 000 followers, oyo esalaki na 8 novembre 2020 vidĂ©o moko ya 1 minute 59 secondes na lisolo oyo mpe lĂ©gende elobi :
« Episkopo moko ya Katolike ya Loma abundisami mpe bayibi ye ntango azalaki kosala misa liboso ya lelo na Georgetown na Cathédrale ya Brickdam. Mobali moko ya makanisi ya kobulungana apusanaki penepene na etumbelo ntango Episkopo ya Georgetown, Révérend Droite Francis Alleyne, azalaki kosala misa mpe ayibi lopete mpe monyololo ya nganga-Nzambe yango. Lokola azalaki na eloko moko ya makasi na loboko moko, na sima abetaki nganga-Nzambe yango egogo na mutu liboso akende elongo na Misala ya Loma (buku ya mosala). Likambo mobimba lilakisama en direct na stream ya Misa ya Facebook ya cathédrale. »
Na dĂ©marche ya vĂ©rification, tomoni pe article ya vĂ©rification oyo esalemaki na Agence France Presse mpe elobi ete Ă©vĂȘque catholique Francis Alleyne akutanaki na rĂ©daction ya AFP na 2020 mpe alobi ete mutu wana abeli liboma. « Agresseur na ngai azali Guyanien oyo azali na problĂšmes mentaux, moko ya ba mingi oyo bakotaka na ba Ă©glises na biso, mingi bazali na violence makasi te », alobi. ĂvĂȘque azalaki mpe kopesa na AFP ba photos ya kati ya cathĂ©drale mpe chapelle mpo na komonisa ete agression esalemaki na CathĂ©drale ya ImmaculĂ©e Conception.
AprĂšs dĂ©marche oyo, Congo Check esalaki conclusion ete vidĂ©o oyo esalaka sujet ya recherche oyo ezali montage te, mais ezali lisolo ya solo. ĂvĂ©nement oyo esalemaki na 7 novembre 2020. Eza agression contre Ă©vĂȘque Francis Alleyne na cathĂ©drale ya Brickdam, na Georgetown, capitale ya Guyana, pays ya Amerika ya Sud. Sango azuaki bigogo na katikati ya misa.


