HomeActualitésFact-checkArticle 217 ya mobeko mokonzi epesi nzela ya boteki mabelé ya mboka...

Article 217 ya mobeko mokonzi epesi nzela ya boteki mabelé ya mboka epa bapaya te

-

Banda ebandeli ya sanza ya zomi na moko, batu ebele bakaboli na Facebook makomi ezo yebisa batu basala keba na mobeko mokonzi ya Congo. Kolanda makomi na bango, article 217 ya mobeko lina epesi nzela ya bokabi biteni ya mboka epa bapaya. Nzoka nde, eza ya solo te.

Mosaleli moko ya Internet akomi : « Article 217 elobi soki RD Congo eza na mopotanu na pays voisin RDC akoki kotikela pays wana eteni naye ya mabele pona koluka kimia ».

Makomi oyo epanzani epa basaseli ebele ya Facebook. Na Congo Check, tomeki kokomela basali oyo ya Internet kasi bayanoli na mituna nab iso te.

Nzoka nde, na botangi mobeko mokonzi ya RDC, bayi Congo Check bamoni ete makambu lina eza ya solo te. Article 217 elobeli nde botiki makoki ndambu pona Article 217 elobeli nde botiki makoki ndambu pona ba traités internationaux oyo Congo etiya mokoloto. Tobengaki Bob Kabamba, moko ya bakomi mobeko mokonzi pona limbo-la.


« article 217 ekoki kososolama neti makoki Congo epesi Union africaine too ba organisations lokola SADC, CPI, EAC…pona kokela mosolo moko to pe mapinga moko pona Afrika mobimba. »

Bob Kabamba, Molakisi na Universite ya Liege

Na nzela ya singa, mokeli mobeko oyo a lobi ete article 217 ekoki kososolama neti makoki Congo epesi Union africaine too ba organisations lokola SADC, CPI, EAC…pona kokela mosolo moko to pe mapinga moko pona Afrika mobimba. “Eza makambu ya mabele te”, boye nde akataki likam-bo oyo.

Kala mingi te, mokonzi ya mboka alobaki polele posa naye ya kobongola mobeko mokonzi. Wuta maloba ne ye, lokuta mingi ezo tambola na Internet. Esengeli bayi mboka basala keba po bakosama te.

Avis de Congo Check à la communauté en ligne de la République démocratique du Congo, de la République centrafricaine, du Congo-Brazzaville et de l'Afrique francophone : Si votre contenu est étiqueté comme faux, partiellement faux, sans contexte, photo ou vidéo retouchée... ne le supprimez pas ! Modifiez-le, avec la mise à jour de l'article de vérification que nous mettons à votre disposition, puis signalez-le-nous ! Ou faites un recours si vous estimez que notre article de vérification ne contient pas suffisamment d'éléments factuels susceptibles d'appeler à la modification de votre contenu. Notre équipe sera alors avertie et procédera au retrait du tag ou vous fournira plus d'assistance dans la compréhension du contexte autour de votre contenu ! En supprimant le contenu, nous ne pourrons malheureusement rien faire de plus et la sanction sera maintenue !

LEAVE A REPLY

Please enter your comment!
Please enter your name here

LATEST POSTS

Non, Barnabé Kikaya Bin Karubi n’a pas participé à la rencontre entre la MONUSCO et l’AFC/M23 à Goma

La Mission de Nations Unies pour la Stabilisation de la République démocratique du Congo (MONUSCO) s'est réunie à Goma avec les rebelles du Mouvement du...

Prétendu décès de Paul Kagame causé par une grave maladie, décryptage d’une rumeur faite d’images détournées et contenus montés

Absent de la scène publique depuis le 6 juin, le président rwandais Paul Kagame s’est retrouvé au centre d’une folle rumeur annonçant tantôt sa mort,...

Fact-Check : cette vidéo virale montrant un homme suspendu à un hélicoptère en plein décollage est vraie

Une vidéo captivante qui dure 1 minute et 48 secondes, un homme s'accroche à un hélicoptère de couleur blanc et vert, immatriculé « 5Y-PKZ »,...