HomeActualitésFact-checkKeba lokuta, bilili oyo eza kolakisa ministre ya Angola te kasi moko...

Keba lokuta, bilili oyo eza kolakisa ministre ya Angola te kasi moko moyingeli mibeko ya kala na Portugal

-

Na Tiktok pe Facecebook, bilili moko ekabwami mingi penza, kolakisaka mwasi moko azali koloba kati na lisanga ya bakeli mibeko. Na ba réseaux sociaux oyo babale, balobi ete ezali moko ya ba ministre ya mboka Angola. Nzoka nde, ezali bongo te. Congo Check aluki pe abimisi sembo.

Kozwa ndakisa ya réseau social Tiktok, bilili eye etalemi na bat oba ike penza wuta etiama na mobu 2023.

Kasi wuta sanza ya sanza ya février, bilili liye ezongi lisusu na ba sango, wuta nkumu mokonzi ya Angola atiki ebonga na ye ya koyokanisa Paul Kagame na Félix Tshisekedi. Mokolo ya le 20 février, makomi moko na Facebook elobaki ete mwasi oyo ya « Angolaise » aza mayele pe nzunzu ata ko aza likukuma.

« Ministre ya Angola na parlement ya Portugal aza na likukuma mais tala silence ya mindelé à l’écoute. Bazo yoka yé avec beaucoup de respect, mais ya boye soki ezalaki na Kinshasa eeeeeh ndé a sambwé », elobi moto musus kaka na Facebook.

Nzoka nde, lisanga ya Congo Check elukaki koyeba bosolo ya likambo yo. Nakosalelaka boluki na kobalusaka bilili, etalisami polele ete elenge mwasi oyo aza ministre ya Angola te. Mbano epesaki nzela ya koyeba été kombo ya mwasi oyo eza Joacine Katar Moreira, moyangeli mobeko (députée) ya kala na mboka Portugal. Wuta boponami na ye na ye na 2019 kino kolongwa na ye na 2022, afingamaki mingi pona likukuma, bobola na ye pe kowuta na ye Afrika.

Boluki na biso epesaki pe nzela ya komona bilili ebele ya likukuma na ye po na kolakisa ete bilili oyo eza ya solo kasi etiamaki nde na esika mosusu.

Bilili oyo etiamaki na Internet na tina ya koseka elenge mwasi oyo. Nzoka nde, na lisitware ya mokili, bakonzi ebele et batu ya mayele penza oyo bakenda sango bazalaki na likukuma, ndakisa ya Churchill, Einstein, Napoléon to pe Roosevelt.

Avis de Congo Check à la communauté en ligne de la République démocratique du Congo, de la République centrafricaine, du Congo-Brazzaville et de l'Afrique francophone : Si votre contenu est étiqueté comme faux, partiellement faux, sans contexte, photo ou vidéo retouchée... ne le supprimez pas ! Modifiez-le, avec la mise à jour de l'article de vérification que nous mettons à votre disposition, puis signalez-le-nous ! Ou faites un recours si vous estimez que notre article de vérification ne contient pas suffisamment d'éléments factuels susceptibles d'appeler à la modification de votre contenu. Notre équipe sera alors avertie et procédera au retrait du tag ou vous fournira plus d'assistance dans la compréhension du contexte autour de votre contenu ! En supprimant le contenu, nous ne pourrons malheureusement rien faire de plus et la sanction sera maintenue !

LEAVE A REPLY

Please enter your comment!
Please enter your name here

LATEST POSTS

Non, le CICR n’a pas donné un bilan de 9078 morts après les attaques du M23 à Goma

Sur les réseaux sociaux Facebook, Twitter, Instagram et via les messageries cryptées comme WhatsApp ou Signal circulent une vidéo filmée à Goma, prétendant montrer l'enterrement...

Contexte : une vidéo de Marcello Tunasi tronquée pour soutenir les relations extraconjugales

Le pasteur évangélique congolais Marcello Tunasi est au centre de la polémique depuis quelques semaines avec une vidéo en circulation sur les réseaux sociaux, dans...

Vrai, la Chine a construit la première ligne de chemin de fer en boucle dans le désert

Une vidéo devenue virale sur Facebook a annoncé la fin des travaux de construction de la première ligne de chemin de fer en boucle dans...

« La conférence de Nangaa a eu lieu à Gisenyi », ces propos faussement attribués à Katumbi

Au lendemain de la tenue à Goma de la conférence de presse de Corneille Nangaa, des publications sur les réseaux sociaux ont attribué à l’opposant...